
Tata moyangeli ya Uele ya likoló jean Bakomito Gambu oyo azali n’a mobémbo na Kinshasa, mboka mokonzi ya ekolo Kongó akutanaki mokolo mwa poso loleki n’a ministre mokitani ya éducation nationale, ba toma ya ekoló mpe bana ya Uele ya likoló oyo bafandá mpe bafandaka n’a Kinshasa.
Bokutani moye mapesaki nzela ya kolendisa boyokani kati ya bakonzi ya bituka mpe diaspora, nzókand elakisaki bokoli oyo ekomami na botomboli etuka.
Ô tango ya oyo bokutani, Jean Bakomito Gambu atalisaki esengo naye mpona mosala oyo bana mboka ya Uele ya likoló bazali kosala n’a mboka mokonzi Kinshasa.
Alakisaki mpe n’a bango lolenge nini étuka ezali ko tambola engebene ya ba projets ebele oyo ezali kosalama oyo ezali kotatola mbongwana ya malamu na bisika nionso.
Tata moyangeli azuaki libaku oyo mpo na ko bianga bango n’a bholingo mpo na ko kokisa vision ya tata mokambi ya ekoló Congo Félix-Antoine Tshisekedi Tshilombo, mpo na Haut-Uele.
« Esengeli tosala elongo, loboko na loboko, mpo na kotonga Uelle ya likoló ya makasi mpe ya bomengo. Emonaneli ya mokonzi ya l’Etat ezali polele: kosala ete etuka na biso ezala ndakosa ya botomboli » elobaki ye.
Bokutani oyo ezalaki libhaku monene mpo n’a bhango kosolola kati n’a bhango bhana ya Uele ya likolo.
Cellule ya Communication ya Gouvernorat / Haut-Eule / OrientalInfo.net