Intervention ya M. Xi Jinping

Mokambi ya République populaire ya Chine

na ntina na etumba ya kobundisa nzala mpe bobola

na likita ya yambo ya 19e Sommet ya G20
 
Rio de Janeiro, mokolo ya 18 Novɛmbɛ 2024
 
Mokonzi ya mboka Luiz Inácio Lula da Silva,

Bandeko ya mosala,

Ezali esengo monene mpo na ngai kosangana na likita ya G20 na Rio de Janeiro. Nalingi kopesa matondo mingi na président Lula mpe gouvernement ya Brésil mpo na boyambi ya molende oyo bapesaki délégation ya Chine.

Na mokili ya lelo, mbongwana oyo emonanaka naino te na boumeli ya ekeke moko ezali se kobakisama nokinoki mpe bato bazali kokutana na mabaku mpe mikakatano oyo emonaná naino te. Lokola bakambi ya bikolo minene, esengeli totelema mpo ete mapata ezipa biso te, tozala na makanisi ete tozali lisanga oyo ezali na avenir ya kokabola, tozua mikumba na biso ya mambi ya kala, tolakisaka initiative historique mpe totombola bokende liboso ya Histoire.

Ndenge nalobaki na likita ya G20, bomengo mpe bomoko ekoki kosalema te na mokili oyo babola bakomi babola mpe bazwi bakomi na bomengo, mpe bikolo ndenge na ndenge esengeli kolendisa bokoli ya mokili mobimba oyo ekosangisa bato banso, oyo ekopesa litomba mingi mpo na bato banso mpe oyo ekoki koyika mpiko. Na Sommet na Hangzhou, présidence ya Chine mpo na mbala ya liboso etie développement na centre ya coordination ya politique macroéconomique. Mwango ya misala ya G20 na oyo etali programme ya 2030 pona botomboli ya seko pe mwango ya G20 pona kosunga industriel na Afrika pe bikolo oyo ekoli mingi te ebimaki. Likita liye, na motó ya likambo « Kotonga mokili ya bosembo mpe planète oyo ekoumela », etie « kobundisa nzala mpe bobola » na likolo ya programme mpe ezwi mokano ya kosala boyokani ya mokili mobimba mpo na kobundisa nzala mpe bobola. Kobanda na Hangzhou kino na Rio, tozali kosala mpo na mokano moko mpe moko, oyo ya kotonga mokili ya bosembo ya bokoli ya bato banso.

Mpo na kotonga mokili ya boye, esengeli tokabola makoki mingi na makambo lokola mombongo, botiami mosolo mpe boyokani ya botomboli mpe kolendisa bibongiseli ya botomboli. Esengeli kosala bapont mingi ya boyokani mpe “ba lopango ya mikemike oyo ezali na bifelo milai” mingi te mpo ete mikili mingi oyo ezali naino na bozwi mingi te bákoka kosala ete bato na bango bázala malamu mpe bákóma na makambo ya sika.

Pona kotonga mokili ya boye, esengeli tosunga ba pays en voie de développement na ba efforts na bango ya kozua ba modes durable ya production pe ya vie, ko répondre na ndenge esengeli na mikakatano lokola changement climatique, perte ya biodiversité pe pollution ya environnement, kotonga civilisation écologique pe kotombola boyokani kati ya moto pe nature .

Mpo na kotonga mokili ya boye, esengeli tosala esika ya polele, ya bato banso mpe ya bokeseni te mpo na boyokani ya nkita ya mokili mobimba, kolendisa mondialisation économique ya gagner mpe ya bato banso, kosalela mayele ya sika, ba industries ya sika mpe misala ya sika ya nkita mpo na bokoli ya seko mpe kosunga bosangisi ya malamu ya bikolo oyo ezali na nzela ya bokei liboso na bokoli ya nimero, ya mayele pe ya vert na tina ya kokitisa bokeseni ya Nord-Sud.

Mpo na kotonga mokili ya boye, esengeli tolanda multilatéralisme mpe tosimba système international oyo etali ONU, ordre international oyo esalemi na droit international mpe na ba normes fondamentales oyo etambwisaka ba relations internationales oyo etongami na ba buts mpe ba principes ya Charte des Nations Unies.

Bandeko ya mosala,

Bokoli ya Chine ezali eteni ya ntina ya bokoli ya bato banso na mokili. Tolongoli bato milio 800 ya Chine na bobola mpe tokokisaki liboso mokano ya kosilisa bobola ya Programme 2030 ya Nations Unies mpo na bokoli ya seko.

Ba réussites wana ekweaki na lola te. Oyo ezali mbuma ya milende ya lisanga mpe ya molende ya gouvernement mpe ya peuple ya Chine. Chine etie ntango nyonso bato na katikati ya misala na yango nyonso mpe elakaki na lokumu nyonso ete “ekotika etuka moko te ya mobola to mobola moko te.” Mpo na kobundisa bobola, tozwi politiki oyo etalisami mpo na mboka nyonso, ndako nyonso mpe moto nyonso. Totie likebi mingi na bokoli ya nkita na kolendisaka na molende bopanzani ya talent, capital mpe technologie na ba régions moins développées. Tosungaki ba régions wana na ndenge ya bokeseni na bokolisi ba industries locales oyo etambwisaka bokoli pe bobongisi ya ba infrastructures. Mpe tosali mpo na bomengo ya bato banso, kolendisa boyokani kati ya bitúká oyo ekoli mpe oyo ekoli mingi te. Nasalaki na ba gouvernements ya village, district, municipal, provincial mpe central. Kobundisa bobola ezalaki ntango nyonso likambo ya liboso na mosala na ngai mpe mosala monene oyo nazali na ekateli ya kokokisa. 

Nzela oyo Chine etambolaki ezali kolakisa ete mikili oyo ezali naino na bozwi mingi te ekoki kosilisa bobola, mpe bandɛkɛ oyo ezali na bolɛmbu bakoki kopumbwa na ebandeli mpe likoló, soki bazali na bokasi, molende mpe elimo ya kosala mombongo oyo esalaka ete mai esala libulu libanga litangá na goutte mpe makanisi ekóma makambo ya solo . Soki Chine ekoki kolonga, mikili mosusu oyo ezali naino na bozwi mingi te ekoki mpe kolonga. Yango nde etumba ya Chine na bobola ememi na mokili mobimba.

Bandeko ya mosala,

Chine ekozala ntango nyonso membre ya Sud mondial, partenaire ya mikolo milayi ya kozala na confiance ya ba pays en voie de développement mpe mboka ya bondimi mpe ya misala mpo na bokoli ya mokili mobimba. Fololo esalaka prɛnta te. Chine ekosepela komona bafololo nkama moko oyo ezali kobimisa fololo mpe endimi kosala elongo na mikili mosusu oyo ezali naino na bozwi mingi te mpo na kokokisa makambo ya sika elongo. Na libaku oyo, nalingi kosakola misala mwambe oyo Chine ekosala mpo na kosunga bokoli ya mokili mobimba.

Ya liboso, kolendisa boyokani ya lolenge ya likolo na nsé ya Initiative ya Ceinture et Route. En plus ya ba fenêtres ya sika ya financement ya 700 milliards ya yuans ya RMB mpe augmentation ya capital ya Fonds ya voie de soie ya 80 milliards ya yuans ya RMB, Chine ekosala makasi mingi mpo na ko développer réseau ya interconnexion multi-dimensionnel ya Initiative ya ceinture et route oyo ekokambama na Nzela ya Soie ya vert mpe kotia na mosala ya Nzela ya Soie numérique.

Ya mibale, kosalela Initiative ya Développement mondial. Na kotalaka misala koleka 1.100 ya botomboli oyo esi ebandi, Chine ekosala mpo na kosala ete Centre mondial ya bolukiluki ya Sud elonga mpe ekolanda kosalela malamu misolo ya 20 milliards ya ba dollars ya Etats-Unis mpo na kosunga bikolo oyo ezali na nzela ya bokei liboso mpe koyeisa mozindo boyokani ya pragmatique na makambo ndenge na ndenge lokola kokitisa bobola, bozangisi bilei mpe nkita ya nimero.

Ya misato, kosunga bokoli ya Afrika. Na likita ya Forum ya boyokani ya Chine-Afrique oyo esalemaki na sanza ya libwa eleki na Pékin, nasakolaki misala zomi ya boyokani Chine-Afrique mpo na modernisation mpo na mibu misato mikoya, mpe lisusu lisungi ya mosolo ya 360 milliards ya yuans RMB oyo epesami mpo na yango.

Ya minei, kosunga boyokani ya molongo mpo na kokitisa bobola mpe bozangisi bilei. Chine ezwi mokano ya kosangana na Alliance mondiale contre nzala mpe bobola. Ezali kopesa maboko na G20 na bokobi ya bobongisi ya Likita ya ba ministres ya Développement mpe ekolanda koyamba Conférence internationale mpo na bobungisi mpe bosoto ya bilei.

Ya mitano, Chine ekobanda Initiative ya coopération internationale sur science ouverte na Brésil, Afrique du Sud mpe Union africaine, na tina ya komema lisusu mbuma ya innovation technologique mondiale na Sud mondial.

Ya motoba, kosunga G20 na bokeli ya boyokani ya pragmatique pona bolamu ya Sud mondial, ko souligner ba réalisations lokola Feuille de route ya komatisaka investissement na énergie propre na ba pays en voie de développement pe niveau ya ba Principes Hauts na oyo etali bioéconomie, pe kosunga mosala ya Pékin -based Centre ya Etude ya Entreprenariat na ba économies ya G20, lokola pe coopération na éducation numérique pe numérisation ya ba musées pe ba archives ya kala.

Ya nsambo, kosalela mwango ya misala ya G20 mpo na kobundisa kanyaka mpe kolendisa boyokani na bikolo misusu oyo ezali na nzela ya bokei liboso mpo na bozongisi bato oyo balukami na mboka na bango, bozongisi biloko, koboya esika ya libateli mpe bokeli makoki ya kobundisa kanyaka .

Ya mwambe, Chine ekolanda bofungoli na yango ya nivo ya likolo mpe ekofungola baporte na yango na monene mpo na mikili oyo ekoli mingi te. Asakoli mokano ya kopesa traitement ya tarif douane zéro na 100% ya ba catégories ya ba produits exportés na Chine na ba pays moins développés oyo ezali na ba relations diplomatiques na ye. Na 2030, motuya ya biloko ya Chine oyo euti na mikili oyo ezali naino na bozwi mingi te ekoki koleka 8 trillion ya badolare ya États-Unis.

Bandeko ya mosala,

Lokola bato ya Chine balobaka mbala mingi, “Mobembo molai ya li nkóto ebandaka na litambe ya liboso.” « Chine ekani kosala elongo na mangomba manso mpo na kotonga mokili ya bosembo ya bokoli ya bato banso, epayi wapi bobola etikali nsima mpe bilikya ya kongenga ekomi ya solo. »

Matondi.